1.- Motema na ngai ekumisa Yo
Nakendé wapi soki na Yo té
Tango motema ekomaka (na ) suka
Opesaka ngai eyano (bis)
2.- Ata na mpasi na kotika Yo té
Na tingama na ngai kaka nse (na) Yo
Otelemisaka makolo na ngai
Esika basusu bazinda (bis)
3.- Ata namoni nzela eza molili
Na kobanga molili ya nzela té
Olakisaka ngai nzela
Esika natia lokolo (bis)
4.- Na mboka na ngai
T’oza kosela lisungi ekowuta epai na Yo
Na mboka ya Congo to tatoli été
Oza Nzambe na bolingi (bis)
Solo: Oh! Yesu oyo
REFRAIN 1: Mongongo na Yo (Alléluia baba, baba)
Ebukaka ba ngomba
Na bomoi ya bato nionso ekotosaka Yo (bis)
Solo: Oh! Na nkombo na Yesu
REFRAIN 2: Mongong na Yo
Molimo etosaka
Tokomi balongi kaka pona kombo na Yo (bis)
Solo: Oh! Ngai n’aza moto na esengo
REFRAIN 3: N’aza moto n’esengo
Nse mpo na nkombo na Yo
Na koyembela Yo
Loyembo ya motema na nga (bis)
www.kasaflo.net source: elshekina.com