|
Accueil - Lingala - Forum - Artistes - Liens - SiteMap - A Propos |
||
|
TP Ok Jazz - Pot
pourri Mabele |
||
|
Auteur/compositeur : LUTUMBA SIMARO Chanteur : SAM MANGWANA Orchestre : TP OK JAZZ =========================================== Maswa e, Maswa a Yo wana omemeli o na ngai bolingo Oyebaka Na kozela oo Maswa ekonana loseba ebeti Maswa ekonana bolingo mpe enani Maswa ebungi o na kati ya londende Bolingo mpe ebungi nakati ya londende Ngaï na libongo naleli oo mbole ôô mama ôô Chérie okendeke malamu mbole ôô Elaka okomelaka ngaï soki okomi Nayeba bolingo obosani ngaï te Nadima bolingo ata ndele okodzonga Nazali se kozela mokolo maswa ekozonga Ngaï awa ata sango ya pamba GIANI ôô mama ôô Ebale modindo ekoti ngambo Matiti ekotsiola Ba buato ekotsiola Kasi bolingo na ngaï enani se konana Na zali se kozela mokolo maswa ekodzonga
|
|
|
|
Ngai awa nabeli ba soucis ya lamoulou ôô
mama ôô Lelo na kanisi yo mingi GIANI Nase ya kuiti na bandi nde kolota Yo lalisi moto na lipeka na ngaï Olobeli ngaï liloma na mua likukuma Dizoni ôô ! Ndoto ya kuiti mawa mingi ôô mama ôô Maswa ememeli ngai bolingo zambe Nabenga nani lolemo emesana Kombo ya mbole, lolemo emesana Mongongo ya mbole matoyi emesana Dizoni ôô Nazingi maboko na ba soucis ôô mama ôô Eloko esali ngaï makinisi Dizoni oo To fandi ba mbula To fandi mpe ba sanza To fandi ba mposo To fandi mpe mikolo To meseni bolingo na mode ya liboma Dizoni oo Na tangi ba plafond na ba soucis ôô mama ôô Photo yotikela ngai na libongo oo Nakati ya motema ekoma nde eleli Na monaka nzela nionso na ko kende Na belela na mosika eleli ebungi Dizoni oo ! Nabeli ba soucis ya lamoulou ôô mama ôô Eloko bolingo ezanga miso Moto oyo okolinga a ko linga yo te Oyo okoboya a kolinga yo mingi Oyo okokima akolanda yo mingi Etumbu oo O ya ba mpasi ya lamoulou ôô to ko monaka Mama mi na lewa ôô mama ôô Mama na kokufa ôô mama ôô Yéhéeee, Yéhéee Mama na kowa ôô mama ôô Mama na kokufa ôô mama ôô Mama na kufa ôô mama ôô Yéhééeee, Yéhéééé Mama na kokufa ôô mama ôô Mama na kobeba ôô mama ôô Transcrite par Blaise KIBONZI sur Congolus le 31/10/06 |
||
|
.www.kasaflo.net écrit par KSF |
||