Mbula:

Mokolo mosusu ngai nakanisi
Naloti lokola ngai nakolala
A mama
Mokolo nakokufa

Mokolo nakokufa, nani akolela ngai ?
Nakoyeba te o
Tika namilela.
Liwa ya zamba soki mpe liwa ya mboka
Liwa ya mpasi soki mpe liwa ya mai
O mama
Mokolo nakokufa

Mokolo nakokufa, ngai motu ya pauvre
Nakanisa Ida mwasi oyo nabala
Nakanisa kaka bana nabota
Nasepelaka mpasi ya mokili ezali kotikala
Mokolo nakokufa

Mokolo nakokufa, ngáí moto ya mbóngo
Nakanisa falánga míngi óyo natíkí
Nakanisa lopángo na bakaminyó
Nakanisa bána ngáí natínda na Mpótó
Mamá
Mokolo nakokufa

Mokolo nakokufa, ngáí moto ya kwíti
Nakanisa kobóya masanga na ngá’
Nakanisa níni na nsúka na sánzá
ntángo namelaka ngáí na baníngá
A Mamá
Mokolo nakokufa

Mokolo nakokufa, ngáí mwásí ya ndúmbá
Nakanisa níni káka perruque na ngá’
Nakanisa níni káka na bilambá
nakolela káka African-Fiesta etíkala
Mamá
Mokolo nakokufa

www.kasaflo.net Ecrit par Blaise et moyogo sur congopage